Bokabi oyo ekamwisaka mpe ebɛtaka libaku
Mobu A – Lomingo ya 25 ya Eleko ya Mobu
Matai 20,1-16: “Bokende bino mpe na elanga ya vino”
Lelo tobandi molɔngɔ ya masese misato ya Yesu oyo etali elanga ya vino: lisese ya basali oyo nkolo azwaki mpo na mokolo moko ya mosala na elanga ya vino, Lomingo oyo; lisese ya bana mibale oyo batindamaki kosala na elanga ya vino, Lomingo ekoya; mpe, na nsuka, lisese ya basali ya elanga ya vino oyo babomaki bato, Lomingo oyo ekolanda.
Elanga ya vino ezali na ndimbola mozindo na Biblia. Likambo moko na lisese ya lelo ebendi mbala moko likebi na biso. Atako balobi ete elanga ya vino ezali ya nkolo moko ya ndako, nkolo yango alobaka ata mbala moko te “elanga na ngai ya vino”, kasi alobaka “elanga ya vino”: “Bokende bino mpe na elanga ya vino!”
Elanga yango ya vino ezali nini? Ezali elanga ya Bokonzi, elanga ya Nzambe. Kasi ezali mpe elanga ya Israel, ekolo oyo Nzambe asalaki na yango Boyokani na ye (Yisaya 5,1-7; Yilimia 2,21; Ezekiele 15,4). Boye, “kokende na elanga ya vino” ezali liboso te libyangi ya kosala mosala na elanga, kasi libyangi ya kokota na Boyokani, ya kokabola bolingo ya Nzambe.
Bokabi oyo ekamwisaka mpe ebɛtaka libaku
Lisese ezali kobenda likebi na biso, liboso ya nyonso, na ezaleli oyo emeseni te ya nkolo ya elanga ya vino, oyo akei mbala mitano na zando koluka basali: na ngonga motoba ya ntɔngɔ, na ngonga libwa, na midi, na ngonga misato ya nsima ya midi, mpe kutu na ngonga mitano ya mpokwa, ngonga moko kaka liboso mosala ya mokolo esila. Motema ya lisese ezali mpenza na bokeseni kati na basali oyo bazwamaki na ntɔngɔ makasi mpe baoyo ya ngonga ya zomi na moko, oyo nkolo afutaki ndenge moko: denari moko moto na moto, lifuti oyo bayokanaki na basali ya liboso.
Kasi likambo oyo ekómisaka ezaleli ya nkolo yango ya kosilikisa mpe ya kopesa motuna ezali ete azali kotika baoyo ya liboso bazela mpo bámona bokabi na ye epai ya baoyo ya nsuka. Na ebandeli, likambo yango ezali kobakisa elikya ya baoyo ya liboso, mpo bakanisi ete azali nkolo ya boboto mpe ya bokabi; kasi nsima, ezali kolamusa komilela na bango, mpo bakomona ye lokola moto azangi bosembo. Mpe maloba ya nsuka ya Yesu ezali lisusu makasi koleka: “Boye baoyo ya nsuka bakozala baoyo ya liboso, mpe baoyo ya liboso bakozala baoyo ya nsuka.” Lisese ya kokamwa mpenza!
Etumba moko na makanisi ya “meritokrasi”
Ekoki kozala ete lisese oyo, oyo tokutaka kaka na Nsango Malamu ya Matai, ezalaki kotalela bandimi mosusu ya liboso oyo bautaki na Bayuda mpe bazalaki komimona lokola bato ya likoló mpe bato oyo bazalaki na lotomo mingi koleka baoyo bayaki na ngonga ya nsuka, elingi koloba bapakano oyo bautaki kobongwana sika.
Likambo oyo ezalaki na lisanga ya Matai ezali mosika te na eleko na biso. Lelo mpe ezali na “bakristu-super” ya ndenge wana. Mpe mawa na biso bapɛtrɛ soki tokómi na matata na bango, mpo bakoki kozala kaka kati na bato oyo bazali na molende mingi mpe bamipesaka mingi na lisanga, “bato ya malamu”! Kutu, ekoki kozala biso moko, ngai ná yo. Tika nalimbola.
Mbala mingi bateyaki biso kokanisa bomoi ya bokristu na ndenge moko pene na meritokrasi: kosala misala ya malamu mingi mpo na koyanganisa ba mérite na likoló liboso ya Nzambe, mpo na nsuka tózwa mbano moko kitoko na Paradiso. Kasi lobiko ezwamaka mpenza ndenge wana? Botangi ya liboso esi ekebisi biso: “Makanisi na ngai ezali makanisi na bino te, mpe banzela na bino ezali banzela na ngai te.” Lobiko ekozala ntango nyonso likabo. Ezali lotomo oyo moto azwi te mpo “amemaki kilo ya mosala ya mokolo mpe molunge” (v. 12); ezali mpe lifuti oyo basengeli na yango te mpo moto asali misala boye to boye. Boye moto oyo babengaka “moyibi ya malamu” nde akoti liboso na Bokonzi, nzokande mwana ya liboso na lisese ya “mwana ya kobunga” azali komilela — na makanisi na ye, “na bosembo”! — mpo na likambo oyo amoni lokola kofinga oyo Tata asali ye, atako asalelaki ye bambula mingi.
Kasi soki liboso ya Nzambe tokoki komikumisa te mpo na lotomo moko oyo tozwi, mpo na nini komipesa mingi boye? Mpo na nini ngai nakotaki na seminɛrɛ nazalaki kaka na mbula zomi mpe nakómaki misionɛrɛ? Ekokaki kozala malamu koleka te nabala mpe nazala na bomoi “ya kawaida” lokola bato nyonso? Boye nde moto oyo amonaka Nsango Malamu lokola mokumba, milende, mpasi, mbeka mpe bowumbu akanisaka; kasi amonaka yango te lokola libaku monene oyo esalisi biso tózwa eloko ya motuya oyo ebombamaki na elanga ya bomoi na biso.
Nazali kokanisa pɛtrɛ moko na lisolo ya Mjezuiti ya Inde Anthony de Mello (na Loyembo ya bandɛkɛ). Ntango amonaki Nzambe kopesa ndeko na ye, oyo azalaki na bomoi ya kawaida, “mbano” ndenge moko na oyo apesaki ye, asepelaki mingi mpe alobaki na Nzambe: “Nkolo, ozali malamu mingi boye ete mpo na yo nalingaki lisusu kopesa bomoi na ngai lokola mbeka mbala mosusu!”
Bomoi ya bokristu oyo etambwisami lokola ya baombo, basaleli to bana
Bomoi ya bokristu ekoki kozala na bizaleli mpe ndenge misato ekeseni: oyo ya moombo, oyo azali na kobanga etumbu mpe oyo mpo na ye Nzambe azali Mosambisi; oyo ya mosaleli, oyo asalaka mpo na lifuti mpe oyo mpo na ye Nzambe azali Nkolo; mpe oyo ya mwana, oyo asalaka kozanga koluka litomba na ye moko, mpo na bolingo, mpe oyo mpo na ye Nzambe azali Tata.
Kasi, na bosolo — mpe yango nde likambo ya kokamwa! — Nsango Malamu emonani lokola ezali koloba na ndenge misato wana ya kozala na boyokani na Nzambe kolanda oyo moto na moto azali kozela. Yesu alobi: “Moto oyo akoloba na [ndeko na ye]: ‘Zoba’, akosengela na moto ya Gehena” (5,22). Petelo atunaki ye: “Talá, biso totiki nyonso mpe tolandi yo; bongo tokozwa nini?” Yesu ayanolaki ye: “Bokofanda [elongo na ngai] likoló ya bakiti ya bokonzi zomi na mibale mpo na kosambisa mabota zomi na mibale ya Israel.” Mpe na baoyo batikaka nyonso mpo na kolanda ye, alaki “mbala nkama”, mpe asukisi na koloba: “Bato mingi ya liboso bakozala ya nsuka, mpe bato mingi ya nsuka bakozala ya liboso”; mpe, likambo ya kokamwa, maloba yango nde ekangisaka Nsango Malamu ya lelo! (Matai 19,27-30).
Mpo na nini Yesu asalelaka bililingi ya makasi na nko, lokola etumbu ya “Gehena” (mbala nsambo na Matai)? Mpo na nini Yesu alobelaka mingi “mbano” (pene na mbala zomi na mibale na Matai)? Ya solo, mpo na Yesu Nzambe azali “Tata” (nkombo yango esalelami pene na mbala ntuku minei na Nsango Malamu ya Matai: kati na yango mbala 16 “Tata na ngai” mpe mbala 14 “Tata na bino”). Tata alingi te ete tózala lokola bato ya mosala mpo na lifuti to lokola baombo: alingi bana! Mpe ntina ya ntoma ya Yesu ezali kokómisa biso lokola Tata: “mpo bózala bana ya Tata na bino oyo azali na likoló” (Matai 5,45). Nzambe alingi tózala bana oyo balukaka ye mpo na bolingo.
Likambo ya mawa, mbala mingi ezali kobanga to boluki ya litomba nde etindaka biso. Mpe nani ayebi soki ata bantina wana oyo ezali ya kokoka te ekoki mpe kosalisa na bantango mosusu ya bomoi! Mbala mosusu Nzambe ayebi kosalela ata bantina wana ya kokoka te, mpo alingi te kobungisa ata mwana moko ya bana na ye.
Likambo ya kokamwa, kondima ete tosengeli kosalela Nzambe mpo na bolingo, kasi te mpo na litomba to mpo na kobanga, ezali mpe na mimeseno mosusu ya mangomba. Lisolo moko eyebani mingi ya bonkoko ya Sufi, oyo bapesaka na mystique musulmane Rabia ya Basra, na ekeke ya mwambe, ezali koloba na ndenge ya makasi: “Nalingi kotumba Paradiso mpe koboma moto ya lifelo, mpo bilamba mibale oyo ezipaka miso elongwa mpe basaleli na Ye básambela Ye kozanga kolikya mbano mpe kozanga kobanga etumbu.”
Mpo na komanyola yo moko
- Ntina nini eleki makasi na boyokani na ngai na Nzambe: kobanga, koluka litomba to bolingo?
- Okoyanola nini na moto oyo akotuna yo na ndenge ya kopesa motuna: “Soki Paradiso ezalaki te, olingaki kaka kondima Nzambe?”
- Manyolá litatoli kitoko ya Santu Paulo na botangi ya mibale ya lelo: “Mpo na ngai, kozala na bomoi ezali Kristo.”
P. Manuel João Pereira Correia, MCCJ