Bosemboli ya bondeko, likambo ya sinfonia!
Mobu A – Lomingo la ntuku mibale na misato o Mobu
Mateo 18,15-20: “Soko ndeko wa yo asali mabe…”
Biteni ya Nsango Elamu ya Lomingo oyo mpe ya Lomingo ekoya ezali na kati ya lisikulu ya minei ya Yezu, lokola santu Mateo akomi yango: lisikulu litali Eklezya to lisanga (Mateo 18). Tómikundola masikulu oyo mazalaki liboso: ya yambo, Lisikulu ya Ngomba (mik. 5-7); ya mibale, lisikulu litali etinda ya kimisionele (mok. 10); ya misato, lisikulu ya masese (mok. 13). Kati na lisikulu oyo ya minei, Mateo asangisi mwa mateya ya Yezu matali bomoi ya lisanga ya Eklezya.
Eteni ya lelo elobeli “bosemboli ya bondeko”, ntango lisumu moko monene ezali kobebisa bomoko ya bandeko. Matini oyo ekomelaki biso na ndenge mibale: moko ya mokuse, oyo elakisaka mingi ntina ya Eklezya: “Soko ndeko wa yo asali mabe”; mpe mosusu ya molai, oyo ebakisi “epai na yo”, mpe bongo elobeli mabe oyo moto moko asaleli moninga (yango nde lolenge oyo matini ya liturji eponi). Eteni oyo esangisi mateya misato ya Yezu, oyo makangami makasi moko na mosusu. Lisusu, matangi misato ya Lomingo oyo makoki kosanganisama na pete mpe mapesi pole mingi na Nsango Elamu: profeta Ezekiele atiami lokola mokengeli oyo azali na mokumba mpo na bandeko na ye (Ezekiele 33), nzokande santu Polo asakoli ete bolingo ezali kokokisama ya Mobeko (Baroma 13,8-10).
Mayele ya bosemboli ya bondeko
Kosembola ndeko ezali mayele oyo esengaka bolingo mpe boboto, bwanya mpe bokebi. Ezali mpasi mpo na ngai kolobela bosemboli ya bondeko. Mpo na bantina misato. Ya yambo, mpo mosala yango ye moko ezali mpasi. Ya mibale, mpo na boumeli ya bikeke mingi, biso bapadre tomikomisaki, na ndenge ebongi te, bankolo ya mosala yango, lokola nde ezali “lotomo” ya biso, nzokande ezali mokumba ya moto nyonso oyo azwi batisimo; lisusu, mbala mingi tosalaki yango na mayele te, mpe ntango mosusu na ndenge ebebisaki makambo mpenza. Yango wana, na esika ya kosembola basusu, tosengeli nde kondima ete basembola biso! Ya misato, mpo lelo kolobela bosemboli ezali lisusu “politically correct” te; moto akoki komona ete tozali kokota na “privacy” ya ye mpe kopamela biso ete tozali komikɔtisa na makambo ya basusu. Yango wana, ezali lokola tozali kotambola na esika etondi na ba mine, mpe toponaka nde kokwea na botongi, na masolo ya bato to na kozanga komitungisa!
1. Mosala ya kobikisa!
NAKOBANDA WAPI? Na vɛrsɛ oyo ezali mbala moko liboso ya eteni ya lelo: “Bobele bongo, Tata wa bino oyo azali o likolo alingi te ete moko wa bana bake oyo abunga” (v. 14). Na ebandeli, tokuti bongo mokano ya Tata ya kobikisa. Ezali “pedagoji ya kozongisa oyo abungi” (Papa Franswa). Mpe mokano na yango ezali “kozua lisusu ndeko na yo” (v. 15). Kozongisa mwana mpe kozua lisusu ndeko! Ezali solo mosala ya… kobikisa!
TOSALA NINI mpenza? Yezu apesi nzela moko ezali na matambe misato oyo malandani mokemoke, oyo ebandisami na liloba “soko” (mbala mitano): liboso, bino mibale kaka; na nsima, soki esengeli, elongo na motatoli moko to mibale; mpe na nsuka, soki esengeli, koyebisa lisanga ya Eklezya, kino na likambo ya nsuka mpenza, ntango emonani ete ndeko mobali to ndeko mwasi ye moko amilongoli na lisanga: “Azala epai na yo lokola mopakano mpe mokongoli na mpako”. Kasi yango elingi koloba te ete tosengeli kolongola moto wana na bolingo ya bondeko, mpo Yezu azalaki moninga ya bakongoli mpako mpe ya basumuki.
2. Mosala ya bondeko
TOSALA NDENGE NINI? Nini ezali likambo ya liboso oyo esengeli mpo na kosembola ndeko? Bondeko! Kokoma ndeko mpo na ye!
Liloba “ndeko” ezali na ntina mingi kati na Nsango Elamu ya Mateo. Ezali malamu komona ete mbala mingi liloba yango eyaka elongo na liloba ya kolakisa boyokani: “ndeko na ngai”, “ndeko na yo”, “bandeko na ngai”… Mosakoli ya Nsango Elamu alingi kolakisa motuya ya boyokani kati na bato, oyo ezali na katikati ya nsango ya Yezu: “Tata na bino azali se moko” mpe “bino banso bozali bandeko” (Mateo 23,8-9). Kristu azali Mwana wa liboso kati na bandeko ebele (Baroma 8,29).
Bolingo ezali na katikati ya boyokani: “Bandeko, bózala na nyongo ya moto te, longola kaka nyongo ya kolingana” (Baroma 13,8, litangi ya mibale).
Bolingo mpe bosolo etambolaka esika moko, kasi bolingo ezali lokola ndeko mwasi ya yambo. Kati na bosemboli ya bondeko, kotia bosolo na esika ya liboso ezali lokola kobimisa moto mbala moko na moi makasi ya midi: okoki kobebisa miso ya moto oyo ozali kobimisa na ndako ya molili ya libunga. Nzokande bolingo ezali lokola ntongo ezali kotana, oyo ememaka moto mokemoke epai ya pole mobimba.
3. Likambo ya sinfonia!
BOSEMBOLI YA BONDEKO EMEMAKA WAPI? Na sinfonia ya bomoko ya bandeko! “Soko bato mibale kati na bino, o nse, bayokani mpo na kosenga eloko nyonso…”
Verbe ya greki oyo Mateo asaleli mpo na koloba “koyokana” (symphonei) ezali na libota se moko na liloba na biso “sinfonia”: tokoki pene kobongola yango, na ndenge ya kobenda likebi, na “kosinfonia”! Lisanga ezali lokola orkestre epai moto na moto azali kobeta eteni na ye mpe ebɛtɛlo na ye ya miziki. Moto na moto abakisaka note to mongongo moko ya ndenge na ye, oyo ekomisaka kitoko ya sinfonia mobimba monene koleka. Soko moto moko azali kobeta libanda ya ton, azali kobeta mabe to azali kobima na ntango, babimisaka ye te, kasi “basembolaka” ye. Tata, oyo alingaka “sinfonia” oyo ebimaka mpo Mwana na ye azali kati na biso, ayokaka na esengo lisanga oyo esambelaka na bomoko. Mpe likolo ekotaka na boyokani na nse: “Nyonso bokokanga o nse, ekokangama o likolo; mpe nyonso bokofungola o nse, ekofungolama o likolo”.
Ekoki kosalema, nzokande, ete moto moko alinga ete mongongo na ye kaka eyokana to azipa mingongo ya bibɛtɛlo mosusu, mpe bongo abimisa bozangi boyokani mpe mobulu; to moto moko akanisa ete ayebi kobeta bibɛtɛlo nyonso mpe ete akoki kosala nyonso kozanga lisungi ya basusu. Mposa wana ya kozala moto ya liboso na nyonso esukaka na kobotisa epai ya basusu kozanga kosala, kozanga mposa mpe kotika komipesa.
Likambo ya mawa, ata na ntango wana ya motuya ya “sinfonia” oyo Ukaristya esengelaki kozala, mbala mingi “koyokana” wana, “kosinfonia” wana, ezangaka. Ntango mosusu tosambelaka to tosalaka liturji pembeni na pembeni, kasi moto na moto lokola azali ye moko. Tozongelaka mabondeli se moko mpe tosalaka bilembo se moko, kasi tozali te “motema moko mpe molimo moko” (Misala ya Bantoma 4,32). Lisusu, nganga-Nzambe oyo akambi Ukaristya, oyo asengelaki kozala lokola “mokambi ya orkestre”, mbala mingi akomaka lokola nde ye moko nde asalaka nyonso, mpe azwaka eteni monene ya molulu. Tozali solo na bosenga ya lombangu ya bomoko elongo (sinodalite), mpo tótambola elongo lokola bato ya Nzambe.
Bomanyoli mpo na poso
Nazali kobengisa bino bómanyola mpe bósalela bino moko vɛrsɛ ya Aleluya: “Nzambe, na nzela ya Kristu, azalaki kozongisa mokili na boyokani na Ye moko, mpe apesaki biso liloba ya kozongisa boyokani” (2 Bakorinti 5,19). Libyangi ya mokristu ezali kozongisa boyokani!
P. Manuel João Pereira Correia, MCCJ