Mobu A – Eyenga ya 22 ya Eleko ya Mbula
Matayo 16,21-27: “Soki moto alingi kolanda ngai…”

Nsango Malamu ya Eyenga oyo ya 22 ezali kokoba oyo ya Eyenga eleki, mpe Petro azali lisusu moto ya liboso na lisolo yango. Ezali kolakisa biso liyebisi ya liboso kati na mayebisi misato ya pasi, liwa mpe lisekwa ya Yesu, mpe ezali lokola mokuse ya eteni ya mibale ya Nsango Malamu.

1. Bililingi mibale oyo epesaka motungisi

Tokoki koloba ete biteni mibale oyo, ya lelo mpe ya Eyenga eleki, esali lokola bililingi mibale oyo ekeseni mpenza: na ngambo moko, elilingi ya pole ya Santu Petro oyo atondi na esengo mpe na bofuli ya Nzambe, azali kosakola ete Yesu azali Masiya; Yesu atatoli ete azali moto ya esengo mpe atie ye lokola libanga ya moboko ya Eklezia. Na ngambo mosusu, elilingi ya molili ya Santu Petro oyo abeti libaku na maloba ya Kristo, azali kopamela Moteyi; kasi ye moko, na ngala na ye, Yesu apameli ye, abengi ye Satana mpe alobi ete azali libanga ya kobetisa libaku. Ezali mpasi kokanisa bokeseni ya makasi koleka oyo! Nzokande, ezali talatala ya solo ya bomoi na biso!

2. Ebandeli ya sika

“Yesu abandaki na kolimbola bayekoli na ye ete asengelaki kokende na Yerusaleme, konyokwama mingi na maboko ya bankulutu, bakonzi ya banganga-nzambe mpe bakomi, kobomama mpe kosekwa na mokolo ya misato”.

Abandaki: ezali ebandeli ya sika. Awa tokutani na esika moko ya ntina oyo ekaboli biteni mibale ya Baevanzile misato ya liboso. Kobanda na ntango oyo, nzela mpe mateya ebongwani. “Moto na moto kati na biso azali na eloko moko ya kobanda” (Emmanuel Levinas). Bomoi ezalaka ata moke te continuum. Mokakatano ezali koyeba ntango nini esengeli kobongola ndenge ya kotambola to kobanda eloko ya sika. Boye, nsima ya bolukiluki ya Eyenga eleki, Yesu azwi mokano ya “kobanda kolimbola”.

Asengeli kolimbola nini? “Ete asengelaki kokende na Yerusaleme mpe konyokwama mingi”. Mpo na nini “asengelaki”? Tokoki komituna. Ezalaki nde “mokano ya Tata”? Tolobaka mingi mpo na “kosala mokano ya Nzambe”, kasi ye, na ngambo na ye, amipesi na maboko ya mokano na biso! Tolobaka mingi koleka mpo na mokano ya Nzambe, mpe mbala mingi tosangisaka yango na mabe, na pasi mpe na kozanga bosembo oyo “tosengeli” kokanga motema na yango mpe kondima, na esika ya kosangisa yango na bolamu, bosembo mpe bolingo oyo tosengeli kolula mpe koluka. Na ndenge wana, tozali na likama ya kobebisa mpe kopɛngwisa ndimbola ya mokano ya Nzambe.

Yesu asengelaki kokende na Yerusaleme, “engumba oyo ebomaka basakoli”, mpo azwaki mokano ya kokende kino na nsuka na bomoko na ye mobimba elongo na bomoto na biso. Ezali mokumba ya bolingo!

Na mokuse, Yesu alingi kolimbola ete ye azali te lolenge ya Masiya oyo bato nyonso bazali kozela: masiya-mokonzi oyo asengelaki kozongisa bokonzi ya Israel (Misala ya Bantoma 1,6); masiya-mosambisi oyo asengelaki kosambisa bato mabe (Matayo 3,12). Bomasiya na ye ezali oyo ya Mosali oyo azali konyokwama, oyo Yisaya 53 asakolaki, oyo bakonzi ya politiki mpe ya lingomba basambisi mpe bakateli etumbu. Yango wana liyebisi oyo ezali kobimisa mobulungano kati na bayekoli na ye. Mpe kati na biso mpe, tóndima yango. Yango nde ntina ya eyano ya Petro, na nkombo ya bayekoli mpe na nkombo na biso.

3. Nani afandi kati na biso: Nzambe to “satana”?

“Petro amemaki ye pembeni mpe abandaki kopamela ye*!”.
“Te, koloba makambo ya boye te; likambo ya boye ekoki kokómela yo ata mokolo moko te! Yo ozali Masiya, Mwana ya Nzambe!”, Petro amonani lokola alingi koloba bongo. Eyano ya Yesu ezali makasi mpenza, kino ekoki komonana lokola eleki ndelo mpe ezali sembo te. “Kende na nsima na ngai, Satana!”. Mpe bongo Petro akwei longwa na bisika ya likoló ya emoniseli ya Nzambe kino na bozindo ya libulu.

Petro azalaki na mpiko mpenza! Mpiko oyo, mawa mingi, biso tozangaka, mpo tolingaka kobomba na kati na biso oyo tokanisaka mpenza, mpo bápamela biso te lokola bapamelaki ye. Mpe bongo “satana” na biso (monguna) atikalaka kobombama malamu kati na biso, na nsima ya elongi kitoko ya komimonisa bato ya malamu mpe ya “misala na biso ya bobangi Nzambe”.

4. Yesu azwi ntaka

Oyo ekamwisaka ngai mingi na eyano ya Yesu, longola makasi na yango, ezali ndenge oyo amonani lokola azali kozwa ntaka na bayekoli na ye: “Soki moto alingi kolanda ngai…”. Alobi te: “Soki bino bolingi kolanda ngai…”, kasi asaleli maloba oyo etali moto nyonso, lokola nde azali pene ata kotika bango bákende. Ezali mwa ndenge moko na ntango wana ya mpasi, ntango bayekoli mingi batikaki ye nsima ya mateya na Kafarnaume: “Bino mpe bolingi kokende?” (Yoane 6,67).

Lolenge wana ya maloba makasi esengelaki kozokisa mitema ya bayekoli. Ata mpe motema na biso, nakoki koloba. Soki tokanisi yango malamu, Yesu akoki kosala ndenge moko mpe epai na biso lelo. Akimaka nsima na biso te mpo na kondimisa biso tótikala, mbala mosusu na kosala boyokani oyo ekitisaka bosolo ya mateya na ye. Ee, ye azali Mobateli Malamu oyo alingaka mpe abatelaka bampate na ye, kasi aboyi kobebisa bonsomi na bango. Makambo soki ezali polele, boninga eumelaka!

Bongo, ndenge nini tokoki te kosala ya biso moko kolela ya mosakoli Yeremia? “Okosaki ngai na bolingo, Ee Nkolo, mpe namitikaki nakosama… Nazalaki komilobela: «Nakokanisa ye lisusu te, nakoloba lisusu na nkombo na ye te!». Kasi kati na motema na ngai ezalaki lokola moto oyo ezali kopela… namekaki kokanga yango, kasi nakokaki te” (Botangi ya liboso, Yeremia 20,7-9).

5. Elembo ya motángo misato

Likambo mosusu oyo ebendaka likebi na mokanda oyo ezali ndenge ebongisami likoló ya motángo 3, elembo ya kokoka mpe ya kotondisama, oyo ezali komonisa ntina monene ya makambo oyo ezali kolobama:

  • Yesu alobeli makambo misato ya “libombami ya Pasika”: pasi-liwa-lisekwa;
  • mbala misato Yesu akosakola pasi na ye, mpe mbala nyonso bantoma bakopesa eyano ya koboya, mpe nsima Yesu akopesa bango mateya;
  • Yesu akonyokwama na bituluku misato ya bato: bankulutu (babateli ya bonkoko mpe ya bokonzi), bakonzi ya banganga-nzambe (babateli ya lingomba) mpe bakomi (babateli ya Mobeko);
  • Yesu atie makambo misato mpo na kolanda ye: miboya yo moko, mema ekulusu na yo, landa ngai!;
  • Yesu apesi makanisi misato ya bwanya mpo na komonisa ete makambo oyo esengeli mpo na kolanda ye, atako na ebandeli emonani makasi mingi, na bosolo yango kaka nde ezali na ntina.

6. Oyo ezali na likama: bomoi!

Liloba “bomoi” nde lizongeli mingi koleka na mokanda na biso (mbala 4), elongo na bavɛrbɛ oyo ezali na boyokani na yango: kobungisa (3), kobikisa, kozwa, kozwa litomba. Namoni ete likambo oyo ezali na ntina. Oyo ezali na likama ezali bomoi: kobungisa yango to kozwa yango! Moto oyo atiaka nyonso kaka na makambo ya mbala moko akosuka lokola moto oyo alongi te. Moto oyo atiaka na mpiko, na bokabi mpe na makanisi ya monene akosuka lokola molongi.

Mpo na kokanisa mpe kosambela yo moko

Luka mwa ntango ya kimia mpo na kokanisa na mozindo maloba ya Botangi ya mibale:

“Nazali kobondela bino, na mawa ya Nzambe, ete bópesa nzoto na bino lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe oyo esepelisaka Nzambe; yango nde losambo na bino ya molimo. Bólanda te lolenge ya mokili oyo, kasi bótika ete bóngwana na kozongisa makanisi na bino sika, mpo bóyeba mokano ya Nzambe: oyo ezali malamu, oyo esepelisaka ye mpe oyo ezali ya kokoka” (Baroma 12,1-2).

Nazali na posa moko mpo na bino: ete maloba makasi ya Yesu etika biso te na mawa to na kozanga elikya. Kasi ete etinda biso tókanisa na mozindo, ee!

P. Manuel João Pereira Correia, MCCJ